chat

Esengo na ngai ezali na lingomba na ngai, Islam

Esengo na ngai ezali na lingomba na ngai, Islam

Esengo na ngai ezali na lingomba na ngai, Islam

kabola:

Nzambe (Allah) Alobi:

{Oyo azali kosala mosala ya malamu, ezala mobali to mwasi, mpe azali mondimi - Solo tokopesa ye bomoi ya malamu mpe tokopesa bango mbano na bango engebene na oyo eleki malamu na oyo bazalaki kosala}.

[An-Nahl: 97].

Moko ya makambo minene oyo ememaka esengo, esengo, mpe esengo na motema ya musulman ezali boyokani na ye ya semba na Nkolo na ye, kozanga mosangani uta na bato ya bomoi, bakufi, to bikeko oyo alobelaki na Buku na Ye ya lokumu ete Ye azali ntango nyonso penepene na basaleli na Ye, koyokaka bango mpe koyanola na mabondeli na bango, lokola Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki:

{Mpe soki ba sali na Ngai batuni yo mpo na Ngai, nde nazali pene na koyanola, bosenga nabango, ntango bazali kobelela ngai, Na yango, tika bayanola Ngai mpe bandimela Ngai mpo ete bakoka kokambama.

[Al-Baqarah: 186]

,Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaki biso tosala (Dua)tosenga  Ye, mpe akómisaki likambo oyo moko ya misala minene ya losambo oyo na nzela na yango musulman apusana penepene na Nkolo na ye, ndenge Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki:

{Mpe Nkolo nabino Alobi: bosenga ngai, nakoyanola bino}

[Ghafir: 60]

,Musulman malamu azali ntango nyonso na mposa ya Nkolo na ye, kobondelaka ntango nyonso liboso na Ye, mpe kopusana penepene na Ye na nzela ya misala ya losambo ya bosembo.

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akelaki biso na molongo oyo mpo na bwanya monene mpe akelaki biso mpamba te. Ezali pona tosambela Ye , na eloko mususu te, Apesaki mibeko mpo na biso lingomba ya mobimba, ya bonzambe oyo ebongisi makambo nyonso ya bomoi na biso ya moto ye moko mpe ya bato banso, Pe abatelaki bamposa ya bomoi, oyo ezali lingomba na biso, milimo na biso , lokumu na biso, makanisi na biso, mpe mbongo na biso, Oyo azali na bomoi na kolanda mitindo ya mibeko mpe kokima makambo oyo epekisami abatelaki bamposa wana mpe azali na bomoi ya esengo mpe ya kondimisa motema na ntembe te.

Bokangami ya musulman na Nkolo na ye elukaka kimia mawa ya motema, Mpe liyoki ya kimia, sécurité, mpe esengo,na koyoka bozali ya Nkolo, nkembo ezala na Ye, mpe bokebi mpe bobateli na Ye mpo na mosaleli na Ye ya sembo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:

{Allah azali Mobateli ya baye bandimi, abimisi bango na molili atie bango na lumière}.

[Al-Baqarah: 257].

Boyokani monene boye,Ezali ezalela ya mayoki oyo ememaka na kosepela na losambo ya Ngɔlu koleka.Azali na mposa makasi ya kokutana na ye mpe azali kopumbwa na motema na ye na lola ya esengo na koyokaka elengi ya bondimi.

Elengi wana, esengo na yango ekoki kolimbolama kaka na baye bamekaki yango na kosala misala ya malamu mpe kokima misala ya mabe Yango wana Ntoma Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - alobi:(Ye oyo asepeli na Nzambe lokola Nkolo na ye, Islam lokola lingomba na ye, mpe Muhammad lokola Ntoma na ye amekaki elengi ya kondima).

Ee, soki moto azali koyoka ete azali, ntango nyonso na maboko ya Mozalisi na ye, ayebi ye na bankombo mpe bizaleli na ye ya kitoko, asambeli ye lokola nde azali komona ye, azali na motema sembo na losambo ya Nzambe, mpe alukaka yango te kaka pona Nzambe, nkembo ezala epai na Ye, akozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo na mokili oyo mpe nsuka ya malamu na nsima.

Ata mawa oyo ekómelaka mondimi na mokili oyo, molunge na yango ekendaka na malili ya bondimi, mpe bosepeli na mobeko ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe kosanzola Ye mpo na nsuka na Ye nyonso, malamu mpe mabe, mpe bosepeli mobimba na yango.

Kati na makambo oyo musulman asengeli kozala na bokebi mpo na kobakisa esengo mpe bondimisi na ye ezali mbala na mbala kokanisa Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe kotanga na ye Coran ya lokumu, lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:

{Baoyo bandimi mpe mitema na bango ekitaka na Kotanga Nzambe kosala(Zikri), ya solo, na Zikri ya Nzambe, ekitisaka mitema}.

[Al-Ra’ad: 28].

Ntangu musulman azali kobakisa kosala Zikri ya nzambe mpe kotanga Coran mingi, boyokani na ye na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ekozala monene, molimo na ye ekozala peto mpe kondima na ye ekozala makasi.

Ndenge moko mpe, musulman asengeli kozala na mposa makasi ya koyekola makambo ya lingomba na ye na bisika ya solo mpo ete akoka kosambela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, na bososoli Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobi:(Koluka boyebi ezali obligatoire pona musulman nionso),Mpe kozala na botosi mpe kotosa mibeko ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo akelaki ye, ata ayebi mayele na yango to te, lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki na Buku na Ye ya lokumu:

{Mpe ezali te mpo na mobali mondimi to mwasi mondimi, ntango Nzambe na Ntoma na Ye bazwi mokano ya likambo moko, kozala na boponi nyonso likolo ya likambo na bango, mpe oyo azangi botosi Nzambe na Ntoma na Ye, azali solo kobunga nzela Libunga ya polele}

[Al-Ahzab: 36].

Tika ete mapamboli mpe kimia ya Nzambe ezala na Ntoma na biso Muhammad mpe libota na ye mpe baninga na ye banso.

Esili.

Index ya mitó ya makambol motángo motó ya likambo

lokasa yango Kozonga na ezipeli Kende na index ya mitó ya makambo Kabola na biso expérience na yo na buku Kota na site Internet Buku ya interactif mpo na telefone ya maboko

Finá mpo na kokende na motó ya likambo Finá na elilingi mpo na kozonga na ezipeli Scannez code-barres na yango

Bolakisi ya mateya (Powerpoint) Produits ya projet Buku oyo esalami Buku ya telefone ya maboko

site Internet Bolakisi ya PowerPoint Version ya smartphone